Lingala
Circonstances
Nini ekómeli yo ?
Douleur
Ozali koyoka mpasi ?
Lakisá ngai esika nini ozali koyoka mpasi.
Mpasi yango ezali neti koswa ya ntonga, to ozo' yoka neti ofinani, to ezo' sala yo moto ?
Soki tolobi ke tosalela motángo to chiffre kobanda 0 tii na 10 mpo na koyeba makasi ya mpasi, okoki koloba ke mpasi nayo ezali na makasi nini?
(10 nde mpasi oyo eleki makasi)
Neuro
Ozali komiyeba lisusu te ?
Oyebi soki lelo eza mokolo nini ?
Oyebi soki oza wapi ?
Okoki koningisa maboko mpe makolo na yo ?
Nazo simba maboko mpe makolo na yo, ozo yoka ke nasimbi yo ?
Tala miso na ngai, nazo tala mbuma liso na yo.
Respiratoire
Nazo tya maboko na ngai na libumu na yo mpo natala ndenge ozo pema, benda mpema ndenge omesaná kasi koloba te ntango nazo sala bongo.
Circulatoire
Nazo tala ndenge motema na yo ezo beta.
Nako fina linzaka na yo malembemalembe.
Nalingi natala tension na yo.
Malaise
Oyebaki ke maladi na yo ezo' banda ?
Oyokaki ndenge nini ntango maladi na yo ebandaki ? (lokola nde biloko ezalaki kotambolatambola yo na nzoto, mpasi , to ?)
Mpasi yango ezali se kopanzana na nzoto? Visika nini ?
Oyokaki mpasi yango wapi ?
Mpasi yango eumeli ntango boni ?
Ozali kosuba lisusu te ?
Omiswaki lolemo ? Fungolá monoko.
Antécédents et gestes
Obelaka maladi (neti diabeti , to tension ?)
Outi kokota lopitala kala te ?
Ozali kozwa bankisi ya munganga mikolo oyo ? (Bankisi nini ?)
Ozali na Ordonansi mpo na bankisi yango ?
Ozalaka na ba allergies ? ( nini ?)
Eza na bato oyo babelá maladi moko boye na libota na yo ?
Fungolá miso. Fungolá monoko. Tombolá loboko ya mobali.
Okoki kofanda ?
Okoki kotelema ?
Okoki kotambola?